1 Reis 6

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NVI

Sair da comparação
NVI Nova Versão Internacional
1 Salomo abandaki kotonga Tempelo ya Yawe sima na mibu nkama minei na mwambe, wuta Isalaele abimaki na Ejipito, mobu oyo ekokanaki na mobu ya minei ya bokonzi na ye kati na Isalaele, na sanza ya zivi.
1 Quatrocentos e oitenta anos depois que os israelitas saíram do Egito, no quarto ano do reinado de Salomão em Israel, no mês de zive, o segundo mês, ele começou a construir o templo do Senhor.
2 Tempelo oyo Salomo atongaki mpo na Yawe ezalaki na bametele pene tuku misato na molayi, bametele pene zomi na mokuse mpe bametele pene zomi na mitano na bosanda.
2 O templo que o rei Salomão construiu para o Senhor media vinte e sete metros de comprimento, nove metros de largura e treze metros e meio de altura.
3 Liboso ya Tempelo, na liboso ya eteni oyo eleki monene kati na Tempelo, ezalaki na ndako moko ya moke ya kokotela oyo ezalaki na bametele pene zomi na mokuse ; molayi na yango ezalaki ndenge moko na mokuse ya Tempelo ; mpe ekota na kati na bametele pene mitano.
3 O pórtico da entrada do santuário tinha a largura do templo, que era de nove metros, e avançava quatro metros e meio à frente do templo.
4 Atiaki na bamir ya Tempelo maninisa oyo batia biyungulu.
4 Ele fez para o templo, janelas com grades estreitas.
5 Atongaki pembeni ya bamir ya eteni oyo eleki monene kati na Tempelo mpe pembeni ya Esika-Oyo-Eleki-Bule biteni ya mike, ngambo na ngambo, na lolenge ya etaje.
5 Junto às paredes do átrio principal e do santuário interior, construiu uma estrutura em torno do edifício, na qual havia salas laterais.
6 Etaje oyo ya se ya biteni yango ya mike ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse ; etaje ya kati-kati, bametele pene misato na mokuse ; mpe etaje oyo ya misato, bametele misato na basantimetele tuku mitano na mokuse. Boye bamir ya libanda ya Tempelo etikalaki lisusu minene te na likolo mpo ete motondo ebebisa bamir ya Tempelo te.
6 O andar inferior tinha dois metros e vinte e cinco centímetros de largura, o andar intermediário tinha dois metros e setenta centímetros e o terceiro andar tinha três metros e quinze centímetros. Ele fez saliências de apoio nas paredes externas do templo, de modo que não houve necessidade de perfurar as paredes.
7 Mpo na kotonga Tempelo, basalelaki kaka mabanga oyo ebongisamaki malamu wuta na esika oyo bapasolaki yango ; boye, esalaki ete makelele ya marto, ya epasola to ya esalelo mosusu ya ebende etikalaki koyokana te wana bazalaki kotonga yango.
7 Na construção do templo só foram usados blocos lavrados nas pedreiras, e não se ouviu no templo nenhum barulho de martelo, nem de talhadeira, nem de qualquer outra ferramenta de ferro durante a sua construção.
8 Ekotelo ya etaje ya se ezalaki na ngambo ya sude ya Tempelo ; bongo, bazalaki kotambola na binyatelo mpo na komata na etaje ya kati-kati mpe na etaje ya misato.
8 A entrada para o andar inferior ficava no lado sul do templo; uma escada conduzia até o andar intermediário e dali ao terceiro.
9 Tango Salomo asilisaki misala ya kotonga Tempelo, azipaki yango na plafon oyo esimbamaki na mabaya minene ya banzete ya sedele.
9 Assim ele construiu o templo e o terminou, fazendo-lhe um forro com vigas e tábuas de cedro.
10 Atongaki ba-etaje kolanda mir ya Tempelo : etaje moko na moko ezalaki na bosanda ya bametele mibale na basantimetele tuku mitano, mpe ekanganaki na Tempelo na nzela ya mabaya minene ya sedele mpo na kosimba motondo.
10 E fez as salas laterais ao longo de todo o templo. Cada uma tinha dois metros e vinte e cinco centímetros de altura, e elas estavam ligadas ao templo por vigas de cedro.
11 Yawe alobaki na Salomo :
11 E a palavra do Senhor veio a Salomão dizendo:
12 — Na likambo oyo etali Tempelo oyo ozali kotonga, soki olandi bikateli na Ngai, soki okokisi malako na Ngai, soki otosi mpe olandi mibeko na Ngai nyonso, nakokokisa na nzela na yo elaka oyo napesaki na Davidi, tata na yo.
12 "Quanto a este templo que você está construindo, se você seguir os meus decretos, executar os meus juízos e obedecer a todos os meus mandamentos, cumprirei por meio de você a promessa que fiz ao seu pai Davi,
13 Mpe nakoya kovanda kati na bato ya Isalaele mpe nakosundola te bato na Ngai, Isalaele.
13 viverei no meio dos israelitas e não abandonarei Israel, o meu povo".
14 Salomo atongaki Tempelo mpe asilisaki misala na yango ya kotonga.
14 E assim Salomão concluiu a construção do templo.
15 Alatisaki bamir ya kati ya Tempelo na mabaya ya sedele, kobanda na se kino na likolo, mpe atiaki mabaya ya sipele na mabele ya Tempelo.
15 Forrou as paredes do templo por dentro com tábuas de cedro, cobrindo-as desde o chão até o teto, e fez o soalho do templo com tábuas de pinho.
16 Atongaki na mabaya ya sedele, kobanda na se kino na likolo, etando ya bametele pene zomi kati na Tempelo ; abongisaki yango mpo ete ezala Esika-Oyo-Eleki-Bule.
16 Separou nove metros na parte de trás do templo, fazendo uma divisão com tábuas de cedro, do chão ao teto, para formar dentro do templo o santuário interno, o Lugar Santíssimo.
17 Eteni oyo elekaki monene kati na Tempelo, liboso ete okoma na Esika-Oyo-Eleki-Bule, ezalaki na bametele pene tuku mibale.
17 O átrio principal em frente dessa sala media dezoito metros de comprimento.
18 Batobolaki bililingi na mabaya ya sedele oyo balatisaki na bamir ya kati ya Tempelo, mpo na kotia bilembo oyo ezalaki na lolenge ya bakolokente mpe ya bafololo efungwama ; balatisaki kati nyonso ya Tempelo na mabaya ya banzete ya sedele, mpe ata libanga moko te ezalaki komonana.
18 O interior do templo era de cedro, com figuras entalhadas de frutos e flores abertas. Tudo era de cedro; não se via pedra alguma.
19 Salomo abongisaki Esika-Oyo-Eleki-Bule mpo na kotia Sanduku ya Boyokani ya Yawe.
19 Preparou também o santuário interno no templo para ali colocar a arca da aliança do Senhor.
20 Molayi ya Esika-Oyo-Eleki-Bule ezalaki na bametele pene zomi, mokuse na yango, bametele pene zomi ; bongo bosanda na yango, bametele pene zomi. Salomo abambaki kati na yango wolo ya peto ; abambaki lisusu wolo na etumbelo oyo basala na mabaya ya banzete ya sedele.
20 O santuário interno tinha nove metros de comprimento, nove de largura e nove de altura. Ele revestiu o interior de ouro puro, e também revestiu de ouro o altar de cedro.
21 Salomo abambaki wolo ya peto na kati nyonso ya Tempelo ; atiaki basheni ya wolo liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule.
21 Salomão cobriu o interior do templo de ouro puro, e estendeu correntes de ouro em frente do santuário interno, que também foi revestido de ouro.
22 Boye, abambaki wolo na kati nyonso ya Tempelo mpe na etumbelo oyo ezalaki liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule.
22 Assim, revestiu de ouro todo o interior do templo e também o altar que pertencia ao santuário interno.
23 Kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, asalaki na nzete ya olive bililingi mibale ya basheribe : sheribe moko na moko ezalaki na bametele pene mitano na molayi.
23 No santuário interno ele esculpiu dois querubins de madeira de oliveira, cada um com quatro metros e meio de altura.
24 Lipapu moko ya sheribe ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano ; kosangisa mapapu nyonso mibale epesaki bametele mitano, kobanda na songe moko kino na songe mosusu.
24 As asas abertas dos querubins mediam dois metros e vinte e cinco centímetros: quatro metros e meio da ponta de uma asa à ponta da outra.
25 Molayi ya sheribe ya mibale ezalaki mpe na bametele pene mitano. Bililingi ya basheribe nyonso mibale ezalaki lolenge moko mpe molayi moko.
25 Os dois querubins tinham a mesma medida e a mesma forma.
26 Bosanda ya bililingi nyonso mibale ya basheribe ezalaki ndenge moko : bametele pene mitano.
26 A altura de cada querubim era de quatro metros e meio.
27 Salomo atiaki bililingi ya basheribe yango na kati-kati ya Esika-Oyo-Eleki-Bule kati na Tempelo. Mapapu ya basheribe ezalaki ya kofungwama : lipapu moko ya sheribe ya liboso etutaki mir, mpe lipapu mosusu ya sheribe ya mibale etutaki mir mosusu ; mpe mapapu na bango mibale mosusu etutanaki na kati-kati ya Esika-Oyo-Eleki-Bule.
27 Ele colocou os querubins, com as asas abertas, no santuário interno do templo. A asa de um querubim encostava numa parede, e a do outro encostava na outra. As suas outras asas encostavam uma na outra no meio do santuário.
28 Salomo abambaki basheribe yango wolo.
28 Ele revestiu os querubins de ouro.
29 Atobolaki na bamir oyo ezingelaki Tempelo, ezala na kati to na libanda, bililingi ya basheribe, ya banzete ya mbila mpe ya bafololo ya kofungwama.
29 Nas paredes ao redor do templo, tanto na parte interna como na externa, ele esculpiu querubins, tamareiras e flores abertas.
30 Abambaki lisusu wolo na se ya Tempelo, ezala na kati to na libanda ya Esika-Oyo-Eleki-Bule.
30 Também revestiu de ouro os pisos, tanto na parte interna como na externa do templo.
31 Salomo asalaki na mabaya ya banzete ya olive, na ekotelo ya Esika-Oyo-Eleki-Bule, ekuke moko ya bizipelo mibale : monene ya kadre ya mabaya ya ekuke ezwaki ndambo moko kati na bandambo mitano ya mokuse ya mir.
31 Para a entrada do santuário interno fez portas de oliveira com batentes de cinco lados.
32 Atobolaki bililingi ya basheribe, ya banzete ya mbila mpe ya bafololo ya kofungwama na bizipelo nyonso mibale oyo basalaki na mabaya ya banzete ya olive ; abambaki wolo oyo balekisa na moto na bililingi ya basheribe, ya banzete ya mbila mpe ya bafololo ya kofungwama.
32 E nas duas portas de madeira de oliveira esculpiu querubins, tamareiras e flores abertas, e revestiu os querubins e as tamareiras de ouro batido.
33 Asalaki mpe ndenge moko mpo na ekotelo ya eteni ya Tempelo, oyo eleki monene : kadre na mabaya ya banzete ya olive, bizipelo mibale na mabaya ya banzete ya sipele. Monene na yango ezwaki ndambo moko kati na bandambo minei ya mokuse ya mir.
33 Também fez pilares de quatro lados, de madeira de oliveira para a entrada do templo.
34 Asalaki lisusu na mabaya ya sipele bizipelo mibale ; ezipelo ya liboso ezalaki na biteni ya mabaya mibale oyo ebalukaka, mpe ezipelo ya mibale ezalaki na barido mibale oyo ebalukaka.
34 Fez também duas portas de pinho, cada uma com duas folhas que se articulavam por meio de dobradiças.
35 Atobolaki likolo na yango bililingi ya basheribe, ya banzete ya mbila mpe ya bafololo ya kofungwama ; mpe abambaki yango wolo na kolanda bandelo ya bililingi yango.
35 Entalhou figuras de querubins, de tamareiras e de flores abertas nas portas e as revestiu todas igualmente de ouro batido.
36 Salomo azingelaki lopango ya kati na mir oyo batonga na milongo misato ya mabanga bakata mpe bamatisa moko likolo ya mosusu, mpe na molongo moko ya mabaya minene ya sedele mpo na kosimba motondo.
36 E construiu o pátio interno com três camadas de pedra lavrada e uma de vigas de cedro.
37 Moboko ya Tempelo ya Yawe etiamaki na mobu ya minei, na sanza ya Zivi.
37 O alicerce do templo do Senhor foi lançado no mês de zive do quarto ano.
38 Basilisaki kotonga Tempelo ya Yawe elongo na biteni na yango nyonso na sanza ya Buli oyo ezali sanza ya mwambe, na mobu ya zomi na moko. Salomo asalaki mibu sambo mpo na kotonga Tempelo ya Yawe.
38 No mês de bul, o oitavo mês, do décimo primeiro ano, o templo foi terminado em todos os seus detalhes, de acordo com as suas especificações. Ele levou sete anos para construí-lo.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar 1 Reis 6, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.