1 Crônicas 22
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs VC
1 Davidi alobaki : « Tempelo ya Yawe Nzambe mpe etumbelo ya mbeka ya kotumba mpo na Isalaele ekozala na esika oyo. »
1 E Davi disse: É aqui a casa do Senhor Deus e este o altar dos holocaustos para Israel.
2 Boye, Davidi apesaki mitindo ya kosangisa bapaya oyo bazalaki kovanda na Isalaele. Mpe kati na bango, aponaki bato oyo bakataka mabanga mpo na kotonga Ndako ya Nzambe.
2 Mandou Davi que se juntassem os estrangeiros que viviam na terra de Israel, e designou os trabalhadores para trabalharem as pedras que deviam servir para a construção da casa de Deus.
3 Davidi apesaki bibende ebele mpo na kosala basete mpe bibende oyo esimbaka bikuke. Apesaki lisusu bronze ebele oyo bakoki kotanga te,
3 Preparou também ferro em abundância, tanto para os pregos dos batentes das portas como para travar as juntas, e uma enorme quantidade de bronze.
4 banzete ebele ya sedele oyo bakoki kotanga te, pamba te bato ya Tiri mpe ya Sidoni bamemelaki Davidi banzete yango ebele.
4 e de cedros sem conta; pois os sidônios e os tírios lhe tinham enviado uma grande quantidade deles.
5 Davidi alobaki : « Salomo, mwana na ngai ya mobali, azali nanu elenge mpe ayebi nanu makambo malamu te. Nzokande, Ndako oyo esengeli kotongama mpo na Yawe esengeli kozala monene, kitoko mpe na lokumu mingi na miso ya bikolo nyonso. Yango wana, nakobongisa biloko mpo na Ndako yango. » Boye Davidi abongisaki biloko ebele liboso ete akufa.
5 Davi dizia: Meu filho Salomão é ainda um menino fraco e a casa que se há de construir ao Senhor deve ser de uma grande magnificência, para ser ilustre e célebre em todos os países. Quero, pois, fazer-lhe os preparativos. Por isso, antes de morrer, ele fez grandes preparativos.
6 Davidi abengisaki Salomo, mwana na ye ya mobali, mpe apesaki ye mokumba ya kotonga Ndako mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele.
6 Depois chamou Salomão, seu filho, e ordenou-lhe que construísse um templo ao Senhor, Deus de Israel.
7 Davidi alobaki na Salomo : « Mwana na ngai, nazwaki likanisi ya kotonga Ndako mpo na Kombo na Yawe, Nzambe na ngai ;
7 Meu filho, disse-lhe ele, eu me tinha decidido a construir uma casa ao nome do Senhor, meu Deus.
8 kasi tala maloba oyo Yawe alobaki na ngai : ‹ Osopaki makila ebele mpe obundaki bitumba ebele. Okoki te kotonga ndako mpo na Kombo na Ngai ; pamba te kati na mokili, osopaki makila ebele na miso na Ngai.
8 Mas a palavra do Senhor me foi dirigida nesses termos: Tu derramaste muito sangue e fizeste grandes guerras. Tu não construirás uma casa a meu nome; pois derramaste diante de mim muito sangue sobre a terra.
9 Kasi okozala na mwana moko ya mobali oyo akozala moto ya kimia mpe ya boboto. Nakopesa ye bopemi liboso ya banguna na ye nyonso oyo bazingeli ye. Kombo na ye ekozala Salomo ; mpe na mikolo nyonso oyo ye akozala mokonzi, nakopesa kimia mpe bopemi na Isalaele.
9 Eis: Nascer-te-á um filho que há de ser um homem pacífico; assegurar-lhe-ei a tranqüilidade com todos os seus inimigos ao redor. Seu nome será Salomão. E, durante seu tempo, darei paz e calma a Israel.
10 Ye nde akotonga Ndako mpo na Kombo na Ngai. Akozala mwana mpo na Ngai, mpe Ngai nakozala Tata mpo na ye, nakolendisa kiti na ye ya bokonzi kati na Isalaele mpo na libela. ›
10 Ele me edificará um templo; será para mim um filho; eu serei para ele um pai, e firmarei para sempre o trono de sua realeza sobre Israel.
11 Sik’oyo, mwana na ngai, tika ete Yawe azala elongo na yo mpo ete otonga Ndako mpo na Yawe, Nzambe na yo, ndenge alobaki na tina na yo !
11 Portanto, que o Senhor esteja contigo, meu filho, para que prosperes e construas o templo do Senhor, teu Deus, segundo o que disse de ti.
12 Tika ete apesa yo bwanya mpe mayele, mpo ete tango okokoma mokonzi ya Isalaele, okoka kobatela mobeko ya Yawe Nzambe na yo !
12 Que o Senhor se digne conceder-te sabedoria e inteligência, quando te fizer reinar sobre Israel, para que observes a lei do Senhor, teu Deus.
13 Boye, okolonga soki obateli malamu bikateli mpe mibeko oyo Yawe apesaki na Moyize mpo na Isalaele. Zala makasi mpe yika mpiko ! Kobanga te mpe kozonga sima te !
13 Prosperarás, então, se te aplicares à observância das leis e dos mandamentos que o Senhor prescreveu a Moisés para Israel. Sê forte e corajoso, não temas, nem te amedrontes.
14 Tala, namonaki pasi mpo na kosangisa mpo na Tempelo ya Yawe, minkoko misato ya kilo ya wolo, minkoko tuku misato ya kilo ya palata, bronze mpe bibende ebele oyo bakoki kotanga te, mabaya mpe mabanga. Boye yo mpe okoki kobakisa mosusu.
14 Eis que, por meus esforços, preparei para a casa do Senhor cem mil talentos de ouro, um milhão de talentos de prata, bronze e ferro em tal quantidade que se não poderia pesar: preparei também madeira e pedras; e tu ainda acrescentarás mais.
15 Ozali na bato ebele ya misala ya maboko : bato oyo bakataka mabanga, bato oyo basalaka misala ya mabaya mpe bato oyo basalaka misala nyonso ya maboko.
15 Tens a teu dispor uma multidão de operários: talhadores, pedreiros, carpinteiros e artífices hábeis em todas as espécies de ofícios.
16 Ozali na wolo, palata, bronze mpe bibende ebele oyo bakoki kotanga te. Sik’oyo, banda mosala ; mpe tika ete Yawe azala na yo elongo ! »
16 O ouro, a prata, o bronze e o ferro existem em número incalculável. Vamos ao trabalho, e que o Senhor esteja contigo!
17 Mpe Davidi apesaki mitindo epai ya bakambi nyonso ya Isalaele ete basunga mwana na ye Salomo.
17 Davi mandou a todos os chefes de Israel ajudar Salomão, seu filho:
18 Alobaki na bango : « Boni, Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino te ? Apesaki bino bopemi na ngambo nyonso te ? Pamba te akabaki na maboko na ngai bato ya mokili oyo. Mokili yango ezali na se ya bokonzi ya Yawe mpe ya bato na Ye.
18 O Senhor, vosso Deus, disse-lhes ele, não está convosco? Não vos assegurou ele a paz em todas as vossas fronteiras? Com efeito, ele entregou nas minhas mãos os habitantes da terra, que atualmente estão sujeitos ao Senhor, e a seu povo.
19 Sik’oyo, bobongisa mitema mpe milimo na bino mpo na koluka Yawe, Nzambe na bino. Bobanda kotonga Esika ya bule ya Yawe Nzambe mpo ete boyeisa Sanduku ya Boyokani ya Yawe mpe biloko ya bule ya Nzambe, na Tempelo oyo ekotongama mpo na Kombo na Yawe. »
19 Aplicai-vos, pois, de todo o vosso coração e vossa alma a buscar o Senhor vosso Deus. Construí o santuário do Senhor Deus, para trazer a arca da aliança do Senhor e os utensílios sagrados de Deus ao templo que será edificado ao nome do Senhor.
Atalhos do teclado
- Capítulo anterior←
- Próximo capítulo→
- Versículo anteriork
- Próximo versículoj
- Limpar seleçãoEsc
- Esta ajuda?
Estude este capítulo no WhatsApp
Peça à IA da Bíblia Fala para explicar 1 Crônicas 22, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.