1 Crônicas 20

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs NAA

Sair da comparação
NAA Nova Almeida Atualizada 2017
1 Na mobu oyo elandaki, na tango oyo bakonzi bazalaka na momesano ya kokende na bitumba, Joabi akambaki mampinga na bitumba mpe abebisaki mokili ya bato ya Amoni ; bongo akendeki kotonga molako liboso ya Raba. Kasi Davidi atikalaki na Yelusalemi.
1 Decorrido um ano, no tempo em que os reis costumam sair para a guerra, Joabe levou o exército, destruiu a terra dos filhos de Amom, foi e sitiou Rabá. Mas Davi ficou em Jerusalém. Joabe atacou Rabá e a destruiu.
2 Davidi alongolaki motole oyo ezalaki na moto ya mokonzi na yango. Bamonaki ete esalemaki na bakilo ya wolo koleka tuku misato mpe ezalaki na libanga ya talo likolo na yango. Wuta na tango wana, ekomaki na moto ya Davidi. Akamataki bomengo ebele ya bitumba kati na engumba yango.
2 Davi tirou a coroa da cabeça do seu rei e verificou que tinha o peso de trinta e quatro quilos de ouro e que havia nela pedras preciosas. Essa coroa foi posta na cabeça de Davi. E da cidade ele levou muitos despojos.
3 Amemaki na bowumbu bato oyo bazalaki kuna, atiaki bango na misala oyo basalaka na si, na piki mpe na epasola. Davidi asalaki ndenge wana na bavandi ya bingumba nyonso ya bato ya Amoni ; bongo azongaki na Yelusalemi elongo na mampinga na ye nyonso.
3 Também trouxe o povo que havia nela, e os fez trabalhar com serras, picaretas de ferro e machados. Davi fez o mesmo com todas as cidades dos filhos de Amom. Depois voltou com todo o exército para Jerusalém.
4 Sima na mwa tango, ezalaki lisusu na bitumba na bato ya Filisitia, kuna na mboka Gezeri. Ezalaki na tango yango nde Sibekayi, moto ya Usha, abomaki Sipayi, moko kati na bakitani ya Rafa ; mpe bato ya Filisitia bayokisamaki soni.
4 Depois disto houve guerra em Gezer contra os filisteus. Foi então que Sibecai, o husatita, matou Sipai, que era descendente dos gigantes; e os filisteus foram subjugados.
5 Ezalaki lisusu na bitumba na bato ya Filisitia ; mpe Elanani, mwana mobali ya Yairi, abomaki Lami, ndeko mobali ya Goliati, moto ya Gati, oyo nzete ya likonga na ye ezalaki monene lokola libaya oyo basali bilamba na maboko basalelaka.
5 Houve ainda outra batalha contra os filisteus, e Elanã, filho de Jair, matou Lami, irmão de Golias, o geteu, cuja lança tinha a haste como eixo de tecelão.
6 Ezalaki lisusu na bitumba oyo esalemaki kuna na Gati ; mpe ezalaki kuna na mbinga mobali moko, mokitani ya Rafa, oyo azalaki na misapi motoba na loboko moko na moko, mpe misapi motoba na lokolo moko na moko. Na kosangisa, azalaki na misapi tuku mibale na minei.
6 Houve ainda outra batalha em Gate. Ali havia um homem de grande estatura, que tinha vinte e quatro dedos, seis em cada mão e seis em cada pé; também este descendia dos gigantes.
7 Atiolaki Isalaele ; mpe Jonatan, mwana mobali ya Shimea mpe ndeko mobali ya Davidi, abomaki ye.
7 Quando ele insultou Israel, Jônatas, filho de Simeia, irmão de Davi, o matou.
8 Bato wana bazalaki bakitani ya Rafa, babotama na Gati mpe bakufaki liboso ya Davidi mpe ya basoda na ye.
8 Esses eram descendentes dos gigantes em Gate, e foram mortos por Davi e seus soldados.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar 1 Crônicas 20, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.