1 Crônicas 15

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs ARA

Sair da comparação
ARA Almeida Revista e Atualizada 1993
1 Tango Davidi asilisaki kotonga bandako mpo na ye moko kati na engumba ya Davidi, abongisaki esika mpo na Sanduku ya Nzambe mpe atelemisaki ndako ya kapo mpo na yango.
1 Fez também Davi casas para si mesmo, na Cidade de Davi; e preparou um lugar para a arca de Deus e lhe armou uma tenda.
2 Davidi alobaki : « Moto moko te, longola kaka Balevi, akoki komema Sanduku ya Boyokani ya Nzambe, pamba te Yawe aponaki bango mpo na komema Sanduku na Ye mpe kosala mosala na Ye mpo na libela. »
2 Então, disse Davi: Ninguém pode levar a arca de Deus, senão os levitas; porque o Senhor os elegeu, para levarem a arca de Deus e o servirem para sempre.
3 Davidi asangisaki kati na Yelusalemi bana nyonso ya Isalaele mpo na komema Sanduku ya Yawe na esika oyo abongisaki mpo na yango.
3 Davi reuniu a todo o Israel em Jerusalém, para fazerem subir a arca do Senhor ao seu lugar, que lhe tinha preparado.
4 Davidi asangisaki lisusu bakitani ya Aron mpe Balevi :
4 Reuniu Davi os filhos de Arão e os levitas:
5 Mpo na bakitani ya Keati :
5 dos filhos de Coate: Uriel, o chefe, e seus irmãos, cento e vinte;
6 mpo na bakitani ya Merari :
6 dos filhos de Merari: Asaías, o chefe, e seus irmãos, duzentos e vinte;
7 mpo na bakitani ya Gerishoni :
7 dos filhos de Gérson: Joel, o chefe, e seus irmãos, cento e trinta;
8 mpo na bakitani ya Elitsafani :
8 dos filhos de Elisafã: Semaías, o chefe, e seus irmãos, duzentos;
9 mpo na bakitani ya Ebron :
9 dos filhos de Hebrom: Eliel, o chefe, e seus irmãos, oitenta;
10 mpo na bakitani ya Uzieli :
10 dos filhos de Uziel: Aminadabe, o chefe, e seus irmãos, cento e doze.
11 Davidi abengaki Banganga-Nzambe Tsadoki mpe Abiatari elongo na Balevi oyo : Urieli, Asaya, Joeli, Shemaya, Elieli mpe Aminadabi.
11 Chamou Davi os sacerdotes Zadoque e Abiatar e os levitas Uriel, Asaías, Joel, Semaías, Eliel e Aminadabe
12 Alobaki na bango : « Bozali bakambi ya mabota ya Balevi, bino elongo na bandeko ya mabota na bino ; bomipetola mpo na komema Sanduku ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, na esika oyo nabongisi mpo na yango.
12 e lhes disse: Vós sois os cabeças das famílias dos levitas; santificai-vos, vós e vossos irmãos, para que façais subir a arca do Senhor , Deus de Israel, ao lugar que lhe preparei.
13 Pamba te lokola bino Balevi bozalaki te na mbala ya liboso, yango wana Yawe, Nzambe na biso, asilikelaki biso makasi ; pamba te totunaki Ye te ndenge nini tokokaki komema yango kolanda mibeko. »
13 Pois, visto que não a levastes na primeira vez, o Senhor , nosso Deus, irrompeu contra nós, porque, então, não o buscamos, segundo nos fora ordenado.
14 Boye, Banganga-Nzambe mpe Balevi bamipetolaki mpo na komema Sanduku ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.
14 Santificaram-se, pois, os sacerdotes e levitas, para fazerem subir a arca do Senhor , Deus de Israel.
15 Bongo Balevi bamemaki na banzete Sanduku ya Nzambe na mapeka na bango ndenge kaka Moyize atindaki, kolanda Liloba na Yawe.
15 Os filhos dos levitas trouxeram a arca de Deus aos ombros pelas varas que nela estavam, como Moisés tinha ordenado, segundo a palavra do Senhor .
16 Davidi alobaki na bakambi ya Balevi ete bapona, kati na bandeko na bango, bayembi mpo na koyemba banzembo ya esengo, na bibetelo mindule : nzenze, lindanda mpe manzanza.
16 Disse Davi aos chefes dos levitas que constituíssem a seus irmãos, os cantores, para que, com instrumentos músicos, com alaúdes, harpas e címbalos se fizessem ouvir e levantassem a voz com alegria.
17 Balevi baponaki Emani, mwana mobali ya Joeli ; Azafi, mwana mobali ya Berekia, kati na bandeko na ye ya mibali ; Etani, mwana mobali ya Kushaya, kati na bana ya Merari, na bandeko na ye ya mibali.
17 Designaram, pois, os levitas Hemã, filho de Joel; e dos irmãos dele, Asafe, filho de Berequias; e dos filhos de Merari, irmãos deles, Etã, filho de Cusaías.
18 Mpe mpo na kosunga bango, baponaki Balevi mosusu : Zakari, Beni, Yazieli, Shemiramoti, Yeyeli, Uni, Eliabi, Benaya, Maaseya, Matitia, Elifele, Mikineya, Obedi-Edomi mpe Yeyeli. Bango nyonso bazalaki bakengeli bikuke.
18 E com eles a seus irmãos da segunda ordem: Zacarias, Bene, Jaaziel, Semiramote, Jeiel, Uni, Eliabe, Benaia, Maaseias, Matitias, Elifeleu e Micneias e os porteiros Obede-Edom e Jeiel.
19 Babeti miziki : Emani, Azafi mpe Etani ; bango bazalaki kobeta manzanza oyo basala na bronze.
19 Assim, os cantores Hemã, Asafe e Etã se faziam ouvir com címbalos de bronze;
20 Zakari, Azieli, Shemiramoti, Yeyeli, Uni, Eliabi, Maaseya mpe Benaya ; bango bazalaki kobeta nzenze na mongongo ya soprano.
20 Zacarias, Aziel, Semiramote, Jeiel, Uni, Eliabe, Maaseias e Benaia, com alaúdes, em voz de soprano;
21 Matitia, Elifele, Mikineya, Obedi-Edomi, Yeyeli mpe Azazia ; bango bazalaki kobeta mandanda ya basinga mwambe mpo na kotambolisa banzembo.
21 Matitias, Elifeleu, Micneias, Obede-Edom, Jeiel e Azazias, com harpas, em voz de baixo, para conduzir o canto.
22 Kenania, mokambi ya Balevi, aponamaki mpo na kotambolisa banzembo ; pamba te ayebaki mosala yango malamu.
22 Quenanias, chefe dos levitas músicos, tinha o encargo de dirigir o canto, porque era perito nisso.
23 Berekia mpe Elikana, bazalaki bakengeli ya Sanduku ya Boyokani.
23 Berequias e Elcana eram porteiros da arca.
24 Banganga-Nzambe Shebania, Jozafati, Netaneeli, Amasayi, Zakari, Benaya mpe Eliezeri ; bazalaki kobeta kelelo liboso ya Sanduku ya Nzambe. Obedi-Edomi mpe Yeyiya bazalaki mpe bakengeli Sanduku ya Boyokani.
24 Sebanias, Josafá, Natanael, Amasai, Zacarias, Benaia e Eliézer, os sacerdotes, tocavam as trombetas perante a arca de Deus; Obede-Edom e Jeías eram porteiros da arca.
25 Davidi, bakambi ya Isalaele mpe bakonzi ya basoda nkoto moko bakendeki kozwa na esengo Sanduku ya Boyokani ya Yawe wuta na ndako ya Obedi-Edomi.
25 Foram Davi, e os anciãos de Israel, e os capitães de milhares, para fazerem subir, com alegria, a arca da Aliança do Senhor , da casa de Obede-Edom.
26 Mpe mpo ete Yawe asunga Balevi oyo bazalaki komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe, babonzaki lokola mbeka bangombe sambo ya mibali mpe bameme sambo ya mibali.
26 Tendo Deus ajudado os levitas que levavam a arca da Aliança do Senhor , ofereceram em sacrifício sete novilhos e sete carneiros.
27 Davidi elongo na Balevi nyonso oyo bazalaki komema Sanduku ya Boyokani, bayembi mpe Kenania, mokambi ya bayembi : bango nyonso balataki banzambala ya lino ya talo. Kasi Davidi abakisaki lisusu efode ya lino na likolo.
27 Davi ia vestido de um manto de linho fino, como também todos os levitas que levavam a arca, e os cantores, e Quenanias, chefe dos que levavam a arca e dos cantores; Davi vestia também uma estola sacerdotal de linho.
28 Bato nyonso ya Isalaele bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe na kobeta milolo ya esengo, na kobeta maseke, bakelelo, manzanza, banzenze mpe mandanda.
28 Assim, todo o Israel fez subir com júbilo a arca da Aliança do Senhor , ao som de clarins, de trombetas e de címbalos, fazendo ressoar alaúdes e harpas.
29 Tango Sanduku ya Boyokani ya Yawe ekotaki na engumba ya Davidi, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, azalaki kotala wuta na lininisa ; mpe tango amonaki mokonzi Davidi kopumbwa mpe kobina na esengo, ayinaki ye kati na motema na ye.
29 Ao entrar a arca da Aliança do Senhor na Cidade de Davi, Mical, filha de Saul, estava olhando pela janela e, vendo ao rei Davi dançando e folgando, o desprezou no seu coração.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar 1 Crônicas 15, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.