1 Crônicas 11

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs ARA

Sair da comparação
ARA Almeida Revista e Atualizada 1993
1 Bato nyonso ya Isalaele basanganaki na Ebron, epai ya Davidi mpe balobaki : « Biso na yo, tozali nzoto moko mpe makila moko na yo.
1 Então, todo o Israel se ajuntou a Davi, em Hebrom, dizendo: Somos do mesmo povo de que tu és.
2 Na kala, ezala na mikolo oyo Saulo azalaki mokonzi, yo nde ozalaki kokamba mampinga ya Isalaele na bitumba. Nzokande, Yawe, Nzambe na yo, alobaki na yo : ‹ Yo nde okokamba bato na Ngai, Isalaele, mpe okokoma mokambi na bango. › »
2 Outrora, sendo Saul ainda rei, eras tu que fazias saídas e entradas militares com Israel; também o Senhor , teu Deus, te disse: Tu apascentarás o meu povo de Israel, serás chefe sobre o meu povo de Israel.
3 Tango bampaka nyonso ya Isalaele bayaki na Ebron epai ya mokonzi, Davidi asalaki elongo na bango boyokani, na Ebron, liboso ya Yawe ; mpe bapakolaki Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele, kolanda Liloba na Yawe na nzela ya Samuele.
3 Assim, pois, todos os anciãos de Israel vieram ter com o rei em Hebrom; e Davi fez com eles aliança em Hebrom, perante o Senhor . Ungiram Davi rei sobre Israel, segundo a palavra do Senhor por intermédio de Samuel.
4 Davidi mpe bato nyonso ya Isalaele bakendeki kobundisa Yelusalemi oyo bazalaki kobenga « Yebusi. » Bato oyo bazalaki kovanda kuna bazali bato ya Yebusi.
4 Partiu Davi e todo o Israel para Jerusalém, que é Jebus, porque ali estavam os jebuseus que habitavam naquela terra.
5 Bavandi ya Yebusi balobaki na Davidi : « Okokota awa te ! »
5 Disseram os moradores de Jebus a Davi: Tu não entrarás aqui. Porém Davi tomou a fortaleza de Sião; esta é a Cidade de Davi.
6 Davidi alobaki na bato na ye : « Moto oyo akobundisa mpe akolonga bato ya Yebusi, akokoma mokonzi ya liboso ya basoda. »
6 Porque disse Davi: Qualquer que primeiro ferir os jebuseus será chefe e comandante. Então, Joabe, filho de Zeruia, subiu primeiro e foi feito chefe.
7 Davidi avandaki na ndako yango oyo batonga makasi ; yango wana babengaki yango « Engumba ya Davidi. »
7 Assim, habitou Davi na fortaleza, pelo que se chamou a Cidade de Davi.
8 Mpe atongaki bandako zingazinga na yango, longwa na Milo kino na mir ya kati. Bongo Joabi abongisaki bisika oyo etikalaki kati na engumba.
8 E foi edificando a cidade em redor, desde Milo, completando o circuito; e Joabe renovou o resto da cidade.
9 Nguya ya Davidi ezalaki komata se komata, mpe Yawe, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, azalaki elongo na ye.
9 Ia Davi crescendo em poder cada vez mais, porque o Senhor dos Exércitos era com ele.
10 Tala bakombo ya bakonzi ya basoda ya mpiko ya Davidi oyo, elongo na Isalaele mobimba, basungaki ye mpo na kokomisa bokonzi na ye makasi, kolanda liloba oyo Yawe alobaki na tina na Isalaele.
10 São estes os principais valentes de Davi, que o apoiaram valorosamente no seu reino, com todo o Israel, para o fazerem rei, segundo a palavra do Senhor , no tocante a esse povo.
11 Tala bakombo ya basoda ya mpiko ya Davidi :
11 Eis a lista dos valentes de Davi: Jasobeão, hacmonita, o principal dos trinta, o qual, brandindo a sua lança contra trezentos, de uma vez os feriu.
12 Eleazari, mwana mobali ya Dodo, moto ya Aoyi : azalaki moko kati na limpinga ya basoda misato ya mpiko ;
12 Depois dele, Eleazar, filho de Dodô, o aoíta; ele estava entre os três valentes.
13 mpe azalaki elongo na Davidi, na engumba Pasi-Damini, tango bato ya Filisitia basanganaki mpo na bitumba, mpe basoda ya Isalaele bakimaki liboso na bango. Ezalaki kuna mpe na elanga moko etonda na bambuma ya orje.
13 Este se achou com Davi em Pas-Damim, quando se ajuntaram ali os filisteus à peleja, onde havia um pedaço de terra cheio de cevada; e o povo fugiu de diante dos filisteus.
14 Kasi basoda ya Eleazari babombamaki kati na elanga, babundelaki yango mpe babomaki bato ya Filisitia. Yawe apesaki bango elonga monene.
14 Puseram-se no meio daquele terreno, e o defenderam, e feriram os filisteus; e o Senhor efetuou grande livramento.
15 Kati na basoda tuku misato ya mpiko, misato bayaki epai ya Davidi, na libanga monene oyo ezalaki pene ya ebombamelo ya mabanga ya Adulami. Nzokande, basoda ya bato ya Filisitia batongaki molako na bango kati na lubwaku ya bakitani ya Rafa.
15 Três dos trinta cabeças desceram à penha, indo ter com Davi à caverna de Adulão; e o exército dos filisteus se acampara no vale dos Refains.
16 Na tango yango, Davidi azalaki kati na ebombamelo moko batonga makasi, mpe basoda ya Filisitia bazalaki kati na Beteleemi.
16 Davi estava na fortaleza, e a guarnição dos filisteus, em Belém.
17 Mbala moko, Davidi ayokaki posa ya mayi mpe alobaki : « Nani akomemela ngai mayi ya libulu oyo ezali pene ya ekuke ya Beteleemi mpo ete namela ? »
17 Suspirou Davi e disse: Quem me dera beber água do poço que está junto à porta de Belém!
18 Basoda nyonso misato ya mpiko bakotaki na mayele kati na molako ya bato ya Filisitia, batokaki mayi na libulu oyo ezali pene ya ekuke ya Beteleemi mpe bamemaki yango epai ya Davidi. Kasi Davidi aboyaki komela mayi yango ; asopaki yango na mabele lokola likabo ya masanga mpo na Yawe.
18 Então, aqueles três romperam pelo acampamento dos filisteus, e tiraram água do poço junto à porta de Belém, e tomaram-na, e a levaram a Davi; ele não a quis beber, mas a derramou como libação ao Senhor .
19 Davidi alobaki : « Tika ete Nzambe na ngai apesa ngai etumbu soki nameli mayi oyo ! Boni, namela penza mayi oyo ezali lokola makila ya bato oyo bandimaki kokende mpe batekaki milimo na bango mpo ete batoka yango ? »
19 E disse: Longe de mim, ó meu Deus, fazer tal coisa; beberia eu o sangue dos homens que lá foram com perigo de sua vida? Pois, com perigo de sua vida, a trouxeram. De maneira que não a quis beber. São essas as coisas que fizeram os três valentes.
20 Abishayi, ndeko mobali ya Joabi, azalaki mokonzi ya basoda misato ya mpiko. Abundisaki bato nkama misato na likonga na ye mpe abomaki bango. Boye, kati na bango misato, ye nde akendeki sango koleka.
20 Também Abisai, irmão de Joabe, era cabeça dos trinta, o qual, brandindo a sua lança contra trezentos, os feriu; e tinha nome entre os primeiros três.
21 Kati na basoda misato ya mpiko ya limpinga ya mibale, ye nde azwaki lokumu koleka mpe akomaki mokonzi na bango, kasi akokanaki te na basoda misato ya limpinga ya liboso.
21 Era ele mais nobre do que os trinta e era o cabeça deles; contudo, aos primeiros três não chegou.
22 Benaya, moto ya mboka Kabitseli mpe mwana mobali ya Yeoyada, azalaki soda ya mpiko mpe asalaki makambo ebele ya kokamwa : abomaki bilombe mibale ya mboka Moabi ; mpe na mokolo moko ya mvula ya pembe, akitaki na libulu moko ya mayi mpe abomaki kuna nkosi.
22 Também Benaia, filho de Joiada, era homem valente de Cabzeel e grande em obras; feriu ele dois heróis de Moabe. Desceu numa cova e nela matou um leão no tempo da neve.
23 Ye mpe moto abomaki mbinga mobali moko ya Ejipito, oyo azalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano na molayi, mpe asimbaki na loboko na ye likonga moko lokola libaya oyo basali bilamba na maboko basalelaka. Abundisaki moto ya Ejipito na lingenda, abotolaki ye likonga oyo azalaki na yango na loboko mpe abomaki ye na likonga na ye moko.
23 Matou também um egípcio, homem da estatura de cinco côvados; o egípcio trazia na mão uma lança como o eixo do tecelão, mas Benaia o atacou com um cajado, arrancou-lhe da mão a lança e com ela o matou.
24 Yango nde misala ya kokamwa oyo Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, asalaki ; ye mpe akendeki sango kati na basoda misato ya mpiko.
24 Estas coisas fez Benaia, filho de Joiada, pelo que teve nome entre os primeiros três valentes.
25 Kati na basoda tuku misato ya mpiko, ye nde azalaki na lokumu monene koleka, kasi akokanaki te na basoda misato ya mpiko ya limpinga ya liboso. Mpe Davidi akomisaki ye mokonzi ya bakengeli na ye.
25 Era mais nobre do que os trinta, porém aos três primeiros não chegou, e Davi o pôs sobre a sua guarda.
26 Basoda ya mpiko bazalaki :
26 Foram os heróis dos exércitos: Asael, irmão de Joabe, Elanã, filho de Dodô, de Belém;
27 Shamoti, moto ya Arori ;
27 Samote, harorita; Heles, pelonita;
28 Ira, mwana mobali ya Ikeshi, moto ya Tekoa ;
28 Ira, filho de Iques, tecoíta; Abiezer, anatotita;
29 Sibekayi, moto ya Usha ;
29 Sibecai, husatita; Ilai, aoíta;
30 Maarayi, moto ya Netofa ;
30 Maarai, netofatita; Helede, filho de Baaná, netofatita;
31 Itayi, mwana mobali ya Ribayi, moto ya Gibea ya libota ya Benjame ;
31 Itai, filho de Ribai, de Gibeá, dos filhos de Benjamim; Benaia, piratonita;
32 Urayi, moto ya mabwaku ya Gashi ;
32 Hurai, do ribeiro de Gaás; Abiel, arbatita;
33 Azimaveti, moto ya Baarumi ;
33 Azmavete, baarumita; Eliaba, saalbonita;
34 Beni-Ashemi, moto ya Gizoni ;
34 Benê-Hasém, gizonita; Jônatas, filho de Sage, hararita;
35 Ayami, mwana mobali ya Sakari, moto ya Arari ;
35 Aião, filho de Sacar, hararita; Elifal, filho de Ur;
36 Eferi, moto ya Mekera ;
36 Héfer, mequeratita; Aías, pelonita;
37 Etsiro, moto ya Karimeli ;
37 Hezro, carmelita; Naarai, filho de Ezbai;
38 Joeli, ndeko mobali ya Natan ;
38 Joel, irmão de Natã; Mibar, filho de Hagri;
39 Tseleki, moto ya Amoni ;
39 Zeleque, amonita; Naarai, beerotita, o que trazia as armas de Joabe, filho de Zeruia;
40 Ira mpe Garebi, bato ya Yeteri ;
40 Ira, o itrita; Garebe, itrita;
41 Iri, moto ya Iti ;
41 Urias, heteu; Zabade, filho de Alai;
42 Adina, mwana mobali ya Shiza ya ekolo ya Ribeni mpe mokambi ya mampinga tuku misato ya mpiko ;
42 Adina, filho de Siza, rubenita, chefe dos rubenitas, e com ele trinta;
43 Anani, mwana mobali ya Maaka ;
43 Hanã, filho de Maaca; Josafá, mitenita;
44 Uzia, moto ya Ashitaroti ;
44 Uzias, asteratita, Sama e Jeiel, filhos de Hotão, aroerita;
45 Yediayeli, mwana mobali ya Shimiri ;
45 Jediael, filho de Sinri, e Joá, seu irmão, tizita;
46 Elieli, moto ya Maavimi ;
46 Eliel, maavita, Jeribai e Josavias, filhos de Elnaão; Itma, moabita;
47 Elieli, Obedi mpe Yaasieli, bato ya Metsobaya.
47 Eliel, Obede e Jaasiel, de Zoba.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar 1 Crônicas 11, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.