1 Coríntios 12

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ (LIN) vs ARIB

Sair da comparação
ARIB Almeida Revisada Imprensa Bíblica
1 Bandeko, nakosepela ete bozala na boyebi na tina na makambo oyo etali makabo ya Molimo.
1 Ora, a respeito dos dons espirituais, não quero, irmãos, que sejais ignorantes.
2 Boyebi malamu ete tango bozalaki nanu Bapagano, bozalaki komemama mpe kokosama epai ya banzambe ya bikeko oyo elobaka te.
2 Vós sabeis que, quando éreis gentios, vos desviáveis para os ídolos mudos, conforme éreis levados.
3 Yango wana, nazali koloba na bino ete moto moko te, wana akambami na Molimo ya Nzambe, akoki koloba : « Tika ete Yesu alakelama mabe ! » Mpe moto moko te akoki koloba : « Yesu azali Nkolo, » soki akambami na Molimo Mosantu te.
3 Portanto vos quero fazer compreender que ninguém, falando pelo Espírito de Deus, diz: Jesus é anátema! e ninguém pode dizer: Jesus é o Senhor! senão pelo Espírito Santo.
4 Makabo ezali ya ndenge na ndenge, kasi Molimo azali kaka moko.
4 Ora, há diversidade de dons, mas o Espírito é o mesmo.
5 Misala ezali ya ndenge na ndenge, kasi Nkolo azali kaka moko.
5 E há diversidade de ministérios, mas o Senhor é o mesmo.
6 Ezali na lolenge ebele ya kosalela Nkolo, kasi Nzambe azali kaka moko ; mpe ezali Ye nde asalaka nyonso kati na bato nyonso.
6 E há diversidade de operações, mas é o mesmo Deus que opera tudo em todos.
7 Nzokande, Molimo amimonisaka epai na moko na moko mpo na bolamu ya bato nyonso.
7 A cada um, porém, é dada a manifestação do Espírito para o proveito comum.
8 Epai na moko, Molimo apesi liloba ya bwanya ; epai na mosusu, liloba ya boyebi ;
8 Porque a um, pelo Espírito, é dada a palavra da sabedoria; a outro, pelo mesmo Espírito, a palavra da ciência;
9 epai na mosusu kondima ; epai na mosusu, likabo ya kobikisa babeli ;
9 a outro, pelo mesmo Espírito, a fé; a outro, pelo mesmo Espírito, os dons de curar;
10 epai na mosusu, nguya ya kosala bikamwa ; epai na mosusu, likabo ya kosakola ; epai na mosusu, likabo ya kososola milimo ; epai na mosusu, likabo ya koloba nkota ya ndenge na ndenge ; epai na mosusu, likabo ya kolimbola nkota.
10 a outro a operação de milagres; a outro a profecia; a outro o dom de discernir espíritos; a outro a variedade de línguas; e a outro a interpretação de línguas.
11 Ezali Molimo kaka moko nde asalaka misala wana nyonso mpe akabolaka yango epai na moko na moko, ndenge Ye moko alingi.
11 Mas um só e o mesmo Espírito opera todas estas coisas, distribuindo particularmente a cada um como quer.
12 Nzoto ezali kaka moko, kasi ezali na biteni ebele ; mpe atako motango na yango ezali ebele, kasi ezali kosala kaka nzoto moko. Ezali mpe bongo mpo na Klisto.
12 Porque, assim como o corpo é um, e tem muitos membros, e todos os membros do corpo, embora muitos, formam um só corpo, assim também é Cristo.
13 Solo, biso nyonso tobatisamaki kati na Molimo moko mpo na kosala nzoto moko : ezala Bayuda to Bagreki, ezala bawumbu to bansomi. Mpe epesamelaki biso nyonso komela Molimo wana se moko.
13 Pois em um só Espírito fomos todos nós batizados em um só corpo, quer judeus, quer gregos, quer escravos quer livres; e a todos nós foi dado beber de um só Espírito.
14 Nzoto ezali na eteni moko te, kasi ezali na biteni ebele.
14 Porque também o corpo não é um membro, mas muitos.
15 Soki lokolo elobi : « Lokola nazali loboko te, nazali kati na nzoto te ; » boni, ekotika penza kozala eteni ya nzoto mpo elobi bongo ?
15 Se o pé disser: Porque não sou mão, não sou do corpo; nem por isso deixará de ser do corpo.
16 Soki mpe litoyi elobi : « Lokola nazali liso te, nazali eteni ya nzoto te ; » boni, ekotika penza kozala eteni ya nzoto mpo elobi bongo ?
16 E se a orelha disser: Porque não sou olho, não sou do corpo; nem por isso deixará de ser do corpo.
17 Soki nzoto mobimba ezalaki kaka liso, nzoto yango elingaki koyoka ndenge nini ? Soki nzoto mobimba ezalaki kaka litoyi, nzoto yango elingaki koyoka solo ndenge nini ?
17 Se o corpo todo fosse olho, onde estaria o ouvido? Se todo fosse ouvido, onde estaria o olfato?
18 Kasi Nzambe atiaki biteni kati na nzoto, mpe amonaki ete ezali malamu mpo na eteni moko na moko kozala na mosala na yango.
18 Mas agora Deus colocou os membros no corpo, cada um deles como quis.
19 Soki biteni nyonso ezalaki kaka eteni moko, boni, nzoto elingaki penza kozala nzoto ?
19 E, se todos fossem um só membro, onde estaria o corpo?
20 Solo, biteni ezali ebele, kasi nzoto ezali kaka moko.
20 Agora, porém, há muitos membros, mas um só corpo.
21 Yango wana, liso ekoki te koloba na loboko : « Nazali na posa na yo te ; » moto mpe ekoki te koloba na makolo : « Nazali na posa na bino te. »
21 E o olho não pode dizer à mão: Não tenho necessidade de ti; nem ainda a cabeça aos pés: Não tenho necessidade de vós.
22 Nzokande biteni ya nzoto, oyo emonanaka ete ezali na motuya moke, ezalaka na tina makasi ;
22 Antes, os membros do corpo que parecem ser mais fracos são necessários;
23 biteni oyo tozwaka na lokumu moke kati na nzoto, tobatelaka yango makasi ; mpe biteni oyo toyokaka nkele, yango nde tobongisaka na lolenge malamu,
23 e os membros do corpo que reputamos serem menos honrados, a esses revestimos com muito mais honra; e os que em nós não são decorosos têm muito mais decoro,
24 wana biteni oyo ebetisaka mabaku te ezalaka na posa ya lolenge malamu yango te. Nzambe abongisa nzoto na lolenge ete basengeli kaka kozwaka na lokumu mingi, biteni oyo emonanaka lokola ezanga lokumu :
24 ao passo que os decorosos não têm necessidade disso. Mas Deus assim formou o corpo, dando muito mais honra ao que tinha falta dela,
25 asalaki bongo mpo ete bokabwani ezala te kati na nzoto, kasi mpo ete biteni na yango esunganaka.
25 para que não haja divisão no corpo, mas que os membros tenham igual cuidado uns dos outros.
26 Soki eteni moko eyoki pasi, biteni nyonso esengeli koyoka pasi elongo na moko yango ; soki mpe moko kaka nde esepeli, biteni nyonso esengeli kokabola esengo elongo na moko yango.
26 De maneira que, se um membro padece, todos os membros padecem com ele; e, se um membro é honrado, todos os membros se regozijam com ele.
27 Nzokande bino, bozali nzoto ya Klisto, mpe moko na moko kati na bino azali eteni ya nzoto yango ya Klisto.
27 Ora, vós sois corpo de Cristo, e individualmente seus membros.
28 Mpe kati na Lingomba, Nzambe atiaki : ya liboso, bantoma ; ya mibale, basakoli ; ya misato, balakisi ; mpe na sima, bato oyo bazali na likabo ya kosala bikamwa, ba-oyo bazali na likabo ya kobikisa babeli, ba-oyo bazali na likabo ya kosunga bato, ba-oyo bazali na likabo ya kokamba, mpe ba-oyo bazali na likabo ya koloba nkota ya ndenge na ndenge.
28 E a uns pôs Deus na igreja, primeiramente apóstolos, em segundo lugar profetas, em terceiro mestres, depois operadores de milagres, depois dons de curar, socorros, governos, variedades de línguas.
29 Boni, bango nyonso bazali bantoma ? Bango nyonso bazali basakoli ? Bango nyonso bazali balakisi ? Bango nyonso basalaka bikamwa ?
29 Porventura são todos apóstolos? são todos profetas? são todos mestres? são todos operadores de milagres?
30 Bango nyonso bazali na likabo ya kobikisa babeli ? Bango nyonso balobaka nkota ya ndenge na ndenge ? Bango nyonso balimbolaka nkota ?
30 Todos têm dons de curar? falam todos em línguas? interpretam todos?
31 Bozala na posa makasi ya kozala na makabo oyo eleki na monene. Mpo na yango, nakolakisa bino nzela oyo eleki malamu.
31 Mas procurai com zelo os maiores dons. Ademais, eu vos mostrarei um caminho sobremodo excelente.

Ler em outra tradução

Comparar com outra

Estude este capítulo no WhatsApp

Peça à IA da Bíblia Fala para explicar 1 Coríntios 12, comparar traduções ou montar um estudo — tudo direto pelo WhatsApp.